Tika ngai na yemba Ngai na sanjola Nzambe oyo Aza likolo na nioso Tika ngai na netola Ngai na kumisa Nzambe oyo akela biloko nioso Ngai na ye ko ngumamela yo Na ye ko netola yo Nzambe oyo alinga ngai ko leka O tika bokonzi na yo ya lola Po ya awa o nse, ko luka ngai mokufi Po lelo ngai na zua bomoyi Yahweh Mabolongo nioso Eko ngumama, liboso na yo Pe minoko nioso Eko tatola Oza Nzambe Nani a tombola mosapi Aloba ye aza mokeli Na moni te, bobele yo yesu na ngai Niama na zamba mbisi na mayi Ndeke likolo eza ko yemba Eko yemba Oza Mosantu Yahweh Mabolongo nioso Eko ngumama, liboso na yo Pe minoko nioso Eko tatola oza Nzambe Sanjola Sanjola Sanjola Mokonzi Minoko nioso etatola kombo Oyo Mwana mpate, Mosantu ya ba santo Yesu Minoko nioso etatola kombo oyo Mwana mpate, Mosantu ya ba santo Yesu Sanjola, sanjola Sanjola, mokonzi Minoko nioso etatola kombo oyo Mwana mpate, mosantu ya ba santo Yesu Na ye liboso na yo Na motema na ngai Na Tatola nioso yo Osali L'expression de mon coeur Je vais l'exprimer devant ta face Masanjoli na memi Na zui epayi ya moto te oh Minoko nioso etatola kombo oyo Mwana mpate, mosantu ya ba santo Yesu