Love! Tous les jours kaka maloba ya love Kasi lelo yoka phrase ango hein Soki yo te nde l’amour nanga ekoma Ndeti phrase etonda Ba faute ebele Soki yo te nde l’amour nanga ekoma Ndeti phrase etonda Ba faute ebele Ya solo tokomi mosika Kasi nzela eza nanu molayi Ngomba moko te ezali Soki omati omoni l’avenir! Elongi ekoki kobomba bolingo Kasi ekobomba mawa te Libanga ata ezali kitoko Ekoki koleka diamant ya défaut na valeur te Po yo babotaki yo na liki Ozalaka na posa ya libele ya maman te Oui! C’est vrai Bolingo na biso evandaka Nango mboka moko te na bomengo Mwana po ayeba abimi minu Akomeka koswa libele ya maman Jamais akoswa mosapi naye Rosa Totika komiswa mitema Bomenga bazela bazwa te oh Ezalaka jamais na rendez-vous Lokuta ya mbongo Etindaka moto akanisa ete Liwa ezali se po ya babola Moto ya bolingo na kombo nayo Ebandaka kati ya motema nanga Kasi jamais ekozikisa un jour Kombo nayo Maria Rosa nayembi lisusu Bibi Tokende libala Malembe malembe maman Nkasa soki ekweyi eh Na nzete bapesaka Faute se na mopepe Nandimi mabe nanga Tozingi maboko Tokitisa mitema Bomengo nyonso wana Tozingi maboko Tokitisa mitema Bomengo nyonso wana Mvula epanzaka se ba feti oh Kasi wenze te Mukarame Ata bafingi tokota ata wenza Tovanda ata na ba intemperies Mvula moke ekokolisela nga Ya makasi keba Maria Rosa Ekoboma ndunda nabiso Bana baboteli biso ba koko Bango nde talatala nabiso Rosa tala bango okomona Elongi ya bolingo na biso Bana baboteli biso ba koko Bango nde talatala nabiso Julie Mukuna eh abota Julio na Sana Bana baboteli biso ba koko Bango nde talatala nabiso Kani ya maman Embrako ndoyi ya maman Nyondo Soki yo te nde l’amour nanga ekoma Ndeti phrase etonda Ba faute ebele (maman) Soki yo te nde l’amour nanga ekoma Ndeti phrase etonda Ba faute ebele