Faveur Mukoko

Ozali Mzambe Na Mawa

Faveur Mukoko

Musungi zala na nga
Kotika nga na mabe na nga te
Naza na nga makasi te
Tikala pembeni na nga

Pembeni na nga
Masiya ya bomoyi
Naza na nga makasi te
Tikala pembeni na nga 

Bisengo ya mokili oyo
Eza na ngo ya libela te
Kaka yonde opesaka
Bisengo ya libela 
Yango

Pembeni na nga 
Masiya ya bomoyi
Naza na nga makasi te
Tikala pembeni na nga

Yo ozali nzambe na mawa, Nga na tatoli ngolu nayo
Bolingo na yo pona Nga, etindi na gumbamela yo 

Nkolo yo olingi ngayi mingi, na moni yango na bomoyi na Nga
Wana nazalaki mitelengano olokotaki Nga o sukoli Nga
O komisi Nga muana na yo, nako pesa na yo Nini
Pona manso osaleli Nga nazongisela yo Nini
Pona manso osaleli Nga, na pesayo Nini

Mokili Oyo eboyaki nga
Pona mabe nasalaki
Kasi yo Yesu yambaki nga
Ondimisi mabe na nga 